ATHOM'S & NADEGE MBUMA - PONA BOLAMU (Lyric & Tr. Française)

  • il y a 9 ans
ATHOM'S & NADEGE MBUMA - PONA BOLAMU + Lyric (Lingala en Francais)

Artistes: Athom's et Nadege
Album: Le Culte Vol. 1
Titre: Pona bolamu

***LYRICS***


*1st part*

 Na koki te ko bomba eh,
 Na koki te ko fanda kimia,
 Na koki na zanga maloba eh,
 Na koki te na kanga monoko,
 Bolamu'a Nzambe eleki bo moyi nanga
 Na koki te, ko bomba yango (Yaweh)

Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh

 Na koki te na fanda kimia
 Na koki te na kanga monoko
 Bolamu'a Nzambe elekeli nga mosantu
 Na koki te na zanga maloba
 A kanisaka nga ata na kanisi Ye te
 Yesu na nga ooo nazua na talo Yaya

Pona bolingo oyo -- na moni eeeeh eh
Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh

 Ba sujets nionso eza n'ango valables
 Soki'olingi o sanjola Nzambe
 Ba 'susu ba sanjola Ye pona lipa
 Ba 'susu ba netola Ye pona mbongo
 Sujet nionso, eza nango na tina
 A condition que ozala mosantu (Yaya)

Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh

 Nzambe monene lokola Yo papa
 Na mokili'oyo na moni te oh
 Na kanisi nionso o saleli nga
 Na zongi pene na yo na kumisa yo eh
 Ba lobi na nga na binaka lokola liboma
 Kasi na yebi sujet ya mabina na nga

(Eza) Bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
(Eza) Bolamu oyo -- O sali eeeh eh

 Ba kamue nga ba lobi na banda wapi
 Ba mituni eza pona nini
 Ba yebi te temoignage'a motema
 Makamb'o eliki nga meke molimo
 Ata moto mosusu a yeba te oooh
 Motema na nga eza temoin (Yaya)

(Temoin ya) - bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
(Naza temoin ya) - bolamu oyo -- O sali eeeh eh,

 Ewuti nga mozindo a motema eh
 Ebimi nga kino monoko
 Na lingi na ganga kasi na koki te oh
 Motema na nga esi etondi
 Etondi na bolamu na Nzambe
 Na libota to pe na santé na nga (Yaya)

(Na yemba) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
(Na yemba) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,

 Na etonga, ma boko na nga likolo
 Molimo na nga esi emati
 Pinjoli na miso eza ko tanga eh
 Ba mituni ooh pona nini
 Nazui rétroviseur na tali kala eeh
 Bolamu nionso Nzambe asala

(Na yembi ooh) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
(Quand je me souviens je me mets à chanter, à chanter comme un fou pour Jésus) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,

 Eloko mosusu te na bomoï na nga
 Eza na motuya lokola makambu'oyo
 Oyo Masiya A salela nga
 Oy'o elekela nga mabanzo
 Yango na pesa wolo to pe palata eeh
 Nionso na pesa soki A sengi

Pona bolamu oyo -- na moni eeeh eh,
Pona bolamu oyo -- na moni eeeh eh,


*2nd part*

 Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
 Olongi motema na nga (O longi'oooh oh oh motema eeh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
 Olongi motema na nga papa (Olongi motema ya mosantu na Yo eeeh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 (Olongi molimo ooooooh ya moyengebene ooh Papa ooh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Na komi'otik'o zala nga
 Na komi'o koma lokola Yo Yaya (po olongi ooh na mozindo'a motema Papa)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Moto ya kanda kanda
 A zua douceur a Molimo eeh (po olongi ye ooh Masiya oh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Na yemba loyembo'eyemba Jacob a koma Israel oh (Po olongi oooh Yaweh ooh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Makambu'ango elekeli nga
 Kasi na lobi sala ndenge O lingo oooh (oooh Yaweh eeh)
 (Yaweh eeeoooh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Likambo'ango e lelisi nga
 kasi na lobi sala ndenge'O lingi oooh (Yaweh eeeeh eeh eh)

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Olongi motema aaaaah ya mosantu na Yo oooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Olongi motema,
 Na kati'a motema ooooh

Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh
Olongi motema na nga

 Huuum olongi oooh,
 Olongi motema eeeh.

Recommandée